26/03/2022
Libondeli ya Tata Molimo-Mosantu Tata Simon Kimbangu Kiangani na tina yaba maladi pe pasi ezali koyela biso na mokili
---------------------------------------------------------------------------------
Nakombo ya Tata, Muana pe Molimo-Santu ; biso tozali bana ya mapamboli Tata Simon Kimbangu ayaki kati na biso kuna naba Yuda Nkolo Yesu bakangi ye baniokoli ye batie ye na ekuluzu maloba ya Nkolo Yesu bino Bayuda makambu bosali nga likambu ya Tata eke na libota mususu bakosalela Tata Nzambe eza libota ya loposo muindu, biso wana libota ya loposo muindu tobengami bana ya mapamboli awa na Nkamba Nkolo Yesu na Tata Simon Kimbangu bokangaki likambu ya kobikisa loposo muindu bomonaki ete pasi ya moto muindu ewumeli tango molayi boloko nango 4400ans ya boloko ya moto muindu boyaki ko récupérer biso, Nkolo Yesu alobi nga nakeyi wana akoya akosala ya mingi ya koleka emonanaka le 06 Avril 1921 Tata Simon Kimbangu abandaki musala naye ya kobikisa batu ya maladi awa na Nkamba, osalaka makamuisi ya ndenge na ndenge bikisa biso famille famille toza yakoningana ndaku ndaku toza ya koningana ba maladi eleki, maladi ezomema biso na nzela ya liwa, liwa ekende musika maladi pe ekende mosika, maladi oyo etiaka satana na nzoto ya mutu Nzambe mutu alongolaka po yemoko satana akoka kolongola te po ye te mutu asala nzoto bino nde bosala biso, Elanga ezali munene mais basali bazali mukie biso tozali kosala kati na elenga na bino pasi eleki tolobaka ata tosimbami na maboko ya batu ya mabe oza na nguya pe makasi yakolongola biso na maboko ya batu ya mabe wana, pamba te tolotaka mabe tolotaka batu yakokufa batu yabomoyi bapesa biso biloko na butu, okolala okolamuka nzoto pasi toyokaka mutu pasi misu, kingo, motema, maboko, mukongo tii makolo mayi te makila te tension, l'estomac malaria, typhoïde, hémorroïdes, diabète, maladi ya ndeke, cancer, cardiaque, paralysie, opération na nzoto, ba nzoto ekoma bambeli yaba opération salisa biso ba maladi esila, mutu nde yango nde ekanisaka oyo tosalelaka mutu soki akanisi te musala ezali te, mingi tozali awa tobelaka kaka mutu, pasi ya mutu esilaka te ata tomeli ba comprimé ya ndenge na ndenge pasi ya mutu esilaka te, silisa yango, misu molakisi ya nzela mosala nionso tosalaka misu ekoma molili salisa biso, kingo pasi pona kobalusa salisa biso, maboko nde yango esimbaka esalaka mosala mingi tokoma na maladi ya maboko salisa biso, mukongo ye asimbi nzoto mobimba olala mukongo pasi otelema mukongo pasi otelema mukongo pasi silisa maladi eza na mukongo, nzoto soki elie biloko estomac pasi motema pasi silisa maladi ya estomac silisa maladi ya motema, makolo nde yango etambolaka makolo kovimba rymatisme mbasu silisa pasi eza na makolo, kolela na mususu famille famille tata mama babalani kasi bazali kobota te pesa bango bana mosala oyo bakoko babanda yango eke naba tata naba mama eye na biso bana ekende pe na bana na biso ebongo soki toboti te esika na biso nani akosala pesa bango bana mingi bazali kobotaka kokufelaka bana kobota na sezariene, sezariene ekende mosika biso tosimba bana, bamisusu famille famille bandeko ya mibali bakoli bandeko ya basi pe bakoli kasi baza kobala te kozanga ba moyen makambu ya ndenge na ndenge salisa bango babala, kolela mususu famille famille musala nde esimbaka mutu mutu soki aza na mosala te eza pasi maplome ezali toyebi misala ya maboko okende na l'Etat mosala ezali te okende na mondele mosala ezali te okende na batu ya mbongo musala ezali te mingi bakoma kosala commerce commerce pe eza kobonga te pambola nzoto pambola maboko pambola misala nabango oyo baza kosala na l'Etat promotion na fonction ezala kati nabango, toye naba photo toye na mikanda batu wana pe baza na pasi salisa bango bisika bazali , mingi bakenda ba voyage ezala na nzela ya Europe n'Afrique kasi nanu bakomi te bazokende komisa bango, mingi babunga na famille esika bakenda eyebani te kobenga te mikanda te soki bazongeli biso na famille ekozala esengo, tango oyo bana basali ba examen année esili ecole primaire secondaire humanité université longisa bango bazua Maplome po Diplome yango nde efongolaka nzela po mutu asala, tofundamaka na l'Etat tofundamaka naba famille zala molobeli na biso Bino boloba ete bino nde bobundaka naba oyo babundisaka biso bosuanaka naba oyo basuanisaka biso talalela biso nanba justice talela biso naba parquet ba dossier ya ndenge na ndenge longisa biso awa toye moko-moko toza na makambu oyo ezosala biso pasi oyo nionso tokobimisa oyo nionso tokoloba Bino nde solution ya makambu nionso kuna tokokende changement ekozala na 21 soki osalisi batu otindi na mayi bakende kosokola yango nde tomelaka yango nde tosokolaka efongola banzela ya misala elongola maladi na zoto etia kimia na nzoto na biso nakombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo-Santu Amen